| Ba Mama, bozipa maputa ! |
|
|
|
|
El Memeyi Murangwa 27/09/09
Awa esili kosalama, Bakonzi ya mboka basengeli ko kamata mitindo ya solo po te esalama lisusu te. Ata ko mabe ezalaka na suka ya bokonzi ya II éme République, makambo ya boye etikala kosalema te. Ndakisa malamu ewutaka na mwana mboka Kengo wa Dondo, oyo akangaka mobeti lindanda Franco Luambo Makiadi, sima ya koyemba nzembo Helena na Jacky, nzembo oyo etondaka maloba ya bosoto. Ebongi bakonzi ya sika bakamata mibeko makasi, soni eluti. Mabe eluti na mboka, bobali basi na makasi (viol) eleki ndelo na etando mobimba ya mboka Congo. Oyo eza tango ba mama, mingi penza bayembi nzembo, bakomi sango, basani ya ma kita, ba mama kalaka, batangisi … bakoka kopesa ndakisa malamu na bilenge oyo bakokola. Kotikala bolumbu pamba-pamba liboso ya bapaya ekobendela mboka bikila mabe. Lobi-lobi kopesa bapaya lisumu te. Ba Mama bozipa maputa. Ba Zuzi ya sika bolakisa te boyebi mosala. Mama Angebi, mama Kazanku bolamuka, mboka ekufi !
© VirungaNews
Only registered users can write comments! Powered by !JoomlaComment 3.12 Copyright (C) 2007 Alain Georgette / Copyright (C) 2006 Frantisek Hliva. All rights reserved. |
||||||
| < Prev |
|---|




Bilili oyo eza kotambolaka mokili mobimba epesi mboka Congo (RDC) soni oyo ezangi ndelo.

