RDC: Mbongwana Enene na Nord-Kivu.

VirungaNews

08/07/12

fardc_in_uganda.jpgUta mokolo mwa 06/07/12 makambo esili ko bongwana na etuka ya Nord-Kivu. Etumba moye ba soda ya mbula Matali bakobunda na M23 o Rutshuru, ezwi nzela mosusu.  Mboka Bunagana ekweyaki o maboko ya M23 oyo ekambami na Colonel Makenga Sultani. Awa to kokoma sango oyo ba mboka: Rutshuru centre, Kiwanja, na Rubare, esili pe ko kweya na maboko ya M23.  Emonani penza ete ba soda ya M23 bazali basoda ya mpiko.

Mokonzi ya Mapinga ya FARDC, generali Mayala “Vainqueur” asilaki kopakata mbangu sima ya kobwaka manduki na sokoto ya ye o buro ya ANR –Bunagana, akimi be na Kupe, na singlet ya pamba.  Moko ya mosali wa biso o mboka Kisoro na Uganda atindelaki biso bilili esika bakimi bakozela lisalisi ya bakonzi ya Uganda. 

 

©VirungaNews

Leave a Reply