RDC: Misala mabe ekobota be Makama!

El Memeyi Murangwa 

30/07/11 

 

 

 

boat_in_drc.jpgPepo epumbwa oyoki ekweyi, Mituka minene esili na kobaluka, Masini ya Enguduka ekotika nzela pe ekosuka na kopanzana, Masua masili na kozinda na ebale, pe mingala ndenge na ndenge. Bato bako mituna? Mituna mwa ebele: Oyo misala mabe? To, kaka bo lekisi bato mbeka? 

Sima ya pepo ya Hewa Bora oyo ebomaki bato pene 100 na tango ezalaki ko lengela kokita na libanda ya pepo ya Bangoka o mboka Kisangani na mokolo mwa 08/07/11, sango mosusu ya mawa ekomelaki biso. Bwato minene misato ya ko kangama eye elongwaki o' tongo makasi ya mokolo mwa 19/07/11 na libongo ya mboka Mbandaka na nzela ya kokende o zando na mboka Ingende na bokumbi bato baleki 200, ezindaki.  Ata ko bakonzi ya mboka bakoloba te bato 100 bawei, Ba Nkumu ya Equateur baye basololi na VirungaNews bakoloba ete, bato basili nde kosila, motuya penza eyebani te.

O' tango ya kala, liboso ya bokoti masua po na mobembo, mokonzi  babengaka Commissaire maritime azalaki kopesa mokanda ya nzela, pe masua moko na moko ezalaki ko zala na mokanda moye molakisi motuya ya bato, kombo na bango, na esika bako kende. Lelo nyoso wana eza lisusu te. Okomona be soda na monduki to polisi atandi kaka loboko, azua be mbongo liboso moto ya mobembo amata likolo ya libaya oyo ewuti mokili te na masua.  Mokumbi masua, to kolo yende aza penza na likambo ya koloba lisusu te, mingi penza balongolaka singa be soki masua etondi lube. Minano to mityo okoyoka masini ekolela po bato, bibwele, na biloko bitondi ya koloba te! 

Ezaleli oyo eza be moko, ezala  na nzela ya mokili, pepo, to mayi. Basali ya Leta bapusi nde ko wela mosolo, babosani penza likambo ya bobongisi mosala oyo esengeli ebatela bato pe biloko bya bango. Soki likama likwe, masapo ndenge na ndenge o radio pe bilili, bakomi koluka nani ndoki? Ba bosani penza ete boweli mosolo, na misala mabe ekopesa be makama.   

Mama ya mboka Mbandaka II oyo alati pili ya bana mibale abandi kopesa bato toli likolo ya maponami ya sanza ya zomi na moko: “Esengeli mbala oyo bato bakeba, ba pona bi ponela te!” 

Esili komonana polele ete misala mabe eko lekisa bato mbeka.  

 

© VirungaNews

Leave a Reply