Babeti Sanza masasi, kasi ezoki te!

El Memeyi Murangwa 

11/10/09 

 

mongete_na_sanza.jpgO tongo ya 09/10/09, bato ya mayele ya mboka Amerika (USA) basalaki likambo ya kokamwa, na bopeti monduki na eteni ya Sanza oyo ezuami na suka ya molongo,mingi penza na libulu babengi Cabeus.  Na bozongisi mituna ya bakomi sango, mokonzi ya NASA alimbolaki ete, bo tuti masasi na Sanza etalani mingi penza na koluka kotala soki bakoki kozuwa mayi na Sanza. Bosengeli koyeba ete bomemi ebakata ya monduki na sanza elye mbongo ebele pene ya milioni 79 na mbongo ya Amerika. 

Bato ebele baye balandi maye ma uti kosalema bakamwe na koyoka te bato ya mayele ya NASA bakoluka mayi na Sanza, tango mboka ebele na mokili etondi mayi nase ya mabele, kasi mosolo ezangi po te bato bakoka kotimola, ba bende mayi. Oyo elakisi penza te, baye bazelaka lisalisi basengeli ko mi lengebele.

Ba kolo bomengo bapesaka biloko oyo ya kosila lobi ba bola bazongela kosenga.  Ngoga ekoki bato ya mayele ba sengaka biloko ya mosala, baluka bokolisi mayele ya bana po te bakoka kosalela ebele ya nkita oyo etondi ebele ya mboka oyo emeseni be kotanda loboko. 

Bato bazeli bilili ya bozoki ya Sanza bamoni eloko te !  Biloko ya mosala oyo balengelaki po nakotinda bilili na mokili oyo ya biso, elakisi eloko te ! Likambo oyo etiki bato ya mayele na posa ya mayi.  Balobi ete ba koyekola batala soki mayi eza solo na Sanza. 

Mayi bakoluka, etondi mokili mobimba, eko zindisa mboka ebele ! Lokito ya monduki eyokanaka nde awa na mokili, kasi na Sanza eleli kaka « swa » 

Sanza etikali na yango mobimba ndenge Nzakomba akela yango. 

Soki tembe tala likolo !  

 

© VirungaNews

Leave a Reply