Bana Congo, tango ekoki, bolamuka !

Norbert Idiofa

 

10/04/08

 

 

chairman_cndp_2008.jpgAta pongi yango! Bana ya Congo bolamuka, mopaya moko te akoya kobongisa mboka na biso. Banso bakosilisaka maloba sukali bobe mpo na nkita ya ekolo. Etumba ya lelo eza kolongwa na bowumbu oyo libota ya Kabila na ba dongolo miso basili kotiya biso na kati. Ata ko bolole! Bango baliyaka, bamele, balala pongi malamu, bana na bango batanga, bazuaka lifuta na sanza, biso tokufaka nzala, totanelaka tongo libanda, mikumba na moto lokala bato bazangi mboka! Tosalaka mosala ya punda?

 

Lokola pasi yango ekoki te, bokonzi ya Kabila ebakisi liwa ! Bako bomaka bato butu butu moto aloba te. Molobi ya solo, mokomi ya sango, soda ya mpiko, nganga nzambe ya bo solo, mwana kelasi, mokolo elanga monene, mobokoli bibwele, molobi mbisi to oyo nyoso alingi bolamu ya mboka, azali moto ya koboma.

 

Udps ya Tshisekedi, Bundu Dia Kongo ya Ne Muanda Nsemi, MLC ya mwana mboka JP Bemba Gombo, bakomi ba nguna. Mboka Joseph Kabila amoni na ki mokolo, ekomi yaye. Ma ngomba nyoso oyo, esakoli bosolo kasi bafuti bango liwa, na boloko.

 

Lokola moyi ya Kongo elamukaka sima ya ngomba Nyamulagira (Nord-Kivu), CNDP ya elombe Laurent Nkunda eponi etumba po na ko zongisa bonsomi na bomoto ya bana Congo.

 

Etumba oyo ebandaki na bobateli bana mboka na biboma-boma ya ba Interahamwe- FDLR na Kivu. Kasi uta lobi etumba ya bonsomi epanzani na mboka mobimba po na kolongola bokonzi oyo eponi kosangana na ba nguna, bokonzi oyo eti nkita ya ekolo na zando ya Damani: bango batekaka, mbongo esukaka na ma benga na bango, bana mboka baliyaka lokuta na bango.

 

Eloba, moyembi Adu Elenga, mokili ekobaluka! Ebandeli yang’oyo eh! Banso toteleme, topesa nzela, tosalisa bana oyo bamipesi mpo na kobundela ekolo.

 

Mapinga ya Congo, botala mabumu ya bakonzi na bino, bomituna eloko boko kufela? Omona wapi moto abundaka ale te! Omona wapi soda akende etumba, mokambi naye atikala na Hotel kosakana!

 

Bibundeli ya ndenge na ndenge, motuya ya bato, na lokuta ekopekisa bana Congo kolonga etumba te.

 

Bolamuka mboka eza ya kotengama!

 

Bolamuka to bengana Joseph Kanambe Kabila na lingomba naye!

 

Tango ekoki moto akosa moninga te.

 

 

 

Le Courier du Mayumbu

http://fr.360.yahoo.com/lecourrierdumayumbu

Leave a Reply