RDC: Toluka toyeba banguna ya mboka!

El Memeyi Murangwa

03/06/11 

 

fdlr_prisoners.jpgKulutu Honore Ngbanda Nzambo ko Atumba abimisa lisese moko ya makasi tango alobaki ete “ Kozanga koyeba eza liwa ya ndambu”.  O mokolo mwa lelo emonani polele ete Bana Congo bazangi kososola po bayeba penza monguna ya mboka na bango.

Banda ki koloni ya ba noko, Bana Congo Belge na Ruanda-Urundi, bafandaki na kimya nyoso, lisanga pe boboto. ` Sima bozwi bonsomi mboka ina isato ekolisa bondeko pe lisanga ba bengi na lopoto CPGL ezalaki kotangama lokola ndakisa na etando nyonso ya mboka Afrika.

Nini penza eyaki kobebisa bondeko? Bino moko boyebi  ete Congo ekomaka banda 1960 mboka ya ekimelo po na bato nyoso oyo bazangaki kimya na ma mboka oyo ezuami nzinga-nzinga ya RDC. Ezala bandeko oyo bazalaki kowela bonsomi na bango lokola Zambia, Angola, Na Afrika ya Ngele, banso bayaki koluka lisalisi epayi ya Nkoy mobali, Mobutu Sese Seko ya mboka Zaire.

Uta 1959, Zaire eyambaka bana Rwanda ebele oyo bakimaki mayele mabe ya bokaboli bikolo oyo ewutaki kotangisama na Rwanda naba noko ya mboka Belgique.  Ata ko ba kimi ya bitumba na Rwanda bafandaki na bolamu nyoso na bokonzi ya yambo na ya mibale na Congo, batikala kobosana mboka na bango te pe basalaki manso bazonga na Rwanda.  Balukaki kozonga na bosembo nyoso, kasi  bokonzi ya mboka Rwanda eboyaki na koloba ete mboka eza moke, mabele ekoka bato banso te!

Lingomba ya ONU, ezelisaka bato na koloba ete bakosala manso po na kosolola na Rwanda, kasi lokola balobaka na Lingala zela-zela Mokomboso ezanga mokila.

Bana Rwanda oyo bafandaki na Congo, Uganda, Burundi, Tanzania na bisika binso na mokili bazuaki bibundeli pe bazongaki na makasi.  Tango bakoti  na mboka, kondo Habyarimana asengaki lisalisi epayi ya moninga naye Mobutu po te bapusa batomboki oyo libanda ya mboka.  Nkumu Mobutu atindaka na lombangu Soda ya Mpiko Donat Mayele naba soda ebele.  Tango Etumba ekomaki makasi, Marechal Mobutu sima ya kososola maye makoleka na Rwanda asengaki ba soda nyoso ya Zaire bazonga na Goma.

Bitumba ekomaka yombe te etindi bakonzi ya France batiya moto na Operation Turquoise na koluka kosalisa bokonzi ya Habyarimana, kasi bakokaki ko longa ma mpinga oyo mawutaki o libanda ya Rwanda te!   Suka suka  bakonzi na population ya Rwanda sima ya bobomi ba Tustsi na ba Hutu ya bwanya pene   miliononi eko bakimaki o mboka Goma na bomengo ya mboka (Banki), Nkita nyoso,  bibundeli, na bato banso (population).

Esika bakomaki na Goma babandaki koluka ko mema etumba na Rwanda, po bakokoka kosilisa misala ya biboma boma babandaki na 1994 kasi bimeka -meka na bango esukaka na nzela.  Bo konzi ya Rwanda na kolemba matumoli ena, bakamatki mokano ya ko bundisa baye bakimaka na Goma pe sima ya bolongi etumba ina  bafungolaki ndelo po te pene ya milioni mibale ya bato bakoka kozonga na bosembo o mboka Rwanda.

Ba tomboki ya FDLR na baye baboya kozonga na mboka Rwanda ba ponaki kokoba etumba na RDC pe ko luka kokoba etumba ya bobotoli nkita pe kofandisa Bana Congo na pasi.  Lelo oyo emonani été bato ya mayele mabe oyo bati bisenga –senga oboso na bango po na bozwi makoki ya kokoba etumba na  RDC pe kokumba etumba yango na Rwanda.

Moko wa bango, Paul Rusesabagina oyo akokoba kokosa te asalisaki bato na Hotel ya Milles Collines na Rwanda  o tango ya Genocide ya 1994,  akolukaka mbongo te asalisa batomboki ya FDLR,  pe aluka akotisa mobulu na Rwanda.

Bana Kongo basengeli bayeba été Monguna monene oyo akopekisaka kimya na Kivu na province orientale pe Katanga eza nde FDLR.  Bitumba ndenge na ndenge , bokamati basi na makasi oyo ba bengi na lopoto viol eza nde bango. Bato oyo baza na liste ya mangomba ya ba tomboki (terroristes) ya mokili  mobimba.  Bana Congo bokeba na bato ya mayele mabe.

Bana Congo bososola boluka bokolisa mayele na bino. Boluka koyeba nani asilisaki solo Dictature ya elombe Mobutu ?  Nani abunda etumba ya AFDL ? Nani azongisa baye bakima Rwanda  o mboka na bango na 1996, na makasi nyonso ?  Sima na yango botala nani nzinga-nzinga na bino akokende liboso ?Soki bozwi biyano na mituna oyo, nde solo bokobanda ko bongisa nkita ya ekolo na kotombola ezaleli ya mboka Congo (Zaire).

Ata ko bakonzi ya mboka RD Congo ba limbolaka bosolo te, Rwanda eza mboka oyo elukaka ezaleli ya mboka Congo ekende o boso.

Esika nyoso bozwami bofongola miso, pe bososola boluka boyeba nani monguna na bino ? Bokeba!  Bokosana na baye bakobalaka  ba mama na baleki na bino na makasi te! 

Solo ko zanga koyeba ezali liwa ya ndambo. 

 

© VirungaNews

Leave a Reply