Ba Mama, bozipa maputa !

El Memeyi Murangwa 

27/09/09

 

mj_30.pngBilili oyo eza kotambolaka mokili mobimba epesi mboka Congo (RDC) soni oyo ezangi ndelo.  Mwana mayele akolaka na komekola etamboli na bizaleli ya mikolo. Oyo tomoni eza yango te.  Ba alanga nzembo ya yambo batikala kopesa mboka soni ata moke te. Batambolaka na bwanya nyoso pe ba binisi Afrika mobimba.  Banda Lucie Eyenga, Antoinette Etisomba, Abeti Massikini, Mpongo Love, Vonga Aye, Faya Tess, te Jolie Deta, totikala komona likambo ya boye te.  Oyo esalemi na MJ 30, na Lingomba ya Tshala Mwana na Kampala (Uganda) epesi moboti nyoso malili na nzoto.

Awa esili kosalama, Bakonzi ya mboka basengeli ko kamata mitindo ya solo po te esalama lisusu te.  Ata ko mabe ezalaka na suka ya bokonzi ya II éme République, makambo ya boye etikala kosalema te. 

Ndakisa malamu ewutaka na mwana mboka Kengo wa Dondo, oyo akangaka mobeti lindanda Franco Luambo Makiadi, sima ya koyemba nzembo Helena na Jacky, nzembo oyo etondaka maloba ya bosoto. Ebongi bakonzi ya sika bakamata mibeko makasi, soni eluti.

Mabe eluti na mboka, bobali basi  na makasi (viol) eleki ndelo na etando mobimba ya mboka Congo. Oyo eza tango ba mama, mingi penza bayembi nzembo, bakomi sango, basani ya ma kita, ba mama kalaka, batangisi … bakoka kopesa ndakisa malamu na bilenge oyo bakokola.   

Kotikala bolumbu pamba-pamba liboso ya bapaya ekobendela mboka bikila mabe.  Lobi-lobi kopesa bapaya lisumu te. Ba Mama bozipa maputa.

Ba Zuzi ya sika bolakisa te boyebi mosala.

Mama Angebi, mama Kazanku bolamuka, mboka ekufi ! 

 

© VirungaNews

Leave a Reply