Category Archives: Lokota ya Makanza

RDC: Batingami na mboka ya bato te nabozangisi bonsomi.

El Memeyi Murangwa

03/08/13

anti-monusco.jpgMaye makoleka na mboka Congo (Zaïre) ekomi kokamwisa.  Mokolo mwa lelo mboka mokonzi Kinshasa ezali na kati ya molili. Mingi bakomitungisa na koyeba nini ezangi, kasi babosani ete nyoso ezali na kati ya mboka, banda mabele ya talo, te mayi oyo etondi mingala pene ezindisia bisika ebele. Eloko ezangi na mboka ezali nde bokonzi ya malamu. Bakonzi ebele baza na mitema lisusu te! Bakoma kosalela be mabumu na bango. Lokuta na minoko na bango ekoma mokanda ya nzela.  Maye ma kotambola te, bakende mosika te, bawela koloba ete eza nde lisumu ya bikolo oyo ezwami nzinga-nzinga ya mboka.  Okoyoka ete toza na bitumba na mboka songolo, kende na ndelo ya mboka wana oko kuta ezibeli eza ya kofungwama 24/24, bato ba kokende kosomba na koteka ngambo ibale. Moto na bokono, moluki kosomba kisi, moteki libanga ya talo, esika ya malamu kokende eza nde mboka mopaya.  Nyoso oyo elakisi ete bakonzi ya mboka bakomi kokosa bana mboka, lokola mwasi mabe oyo alandi nzela ya kwiti na kosilisaka mosolo ya boleyisi bana na Masanga, soki bana baleli nzala, aloba ete tata na bino atikaki eloko te!  Continue reading

RDC: Mbongwana Enene na Nord-Kivu.

VirungaNews

08/07/12

fardc_in_uganda.jpgUta mokolo mwa 06/07/12 makambo esili ko bongwana na etuka ya Nord-Kivu. Etumba moye ba soda ya mbula Matali bakobunda na M23 o Rutshuru, ezwi nzela mosusu.  Mboka Bunagana ekweyaki o maboko ya M23 oyo ekambami na Colonel Makenga Sultani. Awa to kokoma sango oyo ba mboka: Rutshuru centre, Kiwanja, na Rubare, esili pe ko kweya na maboko ya M23.  Emonani penza ete ba soda ya M23 bazali basoda ya mpiko.

Continue reading

RDC: Misala mabe ekobota be Makama!

El Memeyi Murangwa 

30/07/11 

 

 

 

boat_in_drc.jpgPepo epumbwa oyoki ekweyi, Mituka minene esili na kobaluka, Masini ya Enguduka ekotika nzela pe ekosuka na kopanzana, Masua masili na kozinda na ebale, pe mingala ndenge na ndenge. Bato bako mituna? Mituna mwa ebele: Oyo misala mabe? To, kaka bo lekisi bato mbeka? 

Sima ya pepo ya Hewa Bora oyo ebomaki bato pene 100 na tango ezalaki ko lengela kokita na libanda ya pepo ya Bangoka o mboka Kisangani na mokolo mwa 08/07/11, sango mosusu ya mawa ekomelaki biso. Bwato minene misato ya ko kangama eye elongwaki o' tongo makasi ya mokolo mwa 19/07/11 na libongo ya mboka Mbandaka na nzela ya kokende o zando na mboka Ingende na bokumbi bato baleki 200, ezindaki.  Ata ko bakonzi ya mboka bakoloba te bato 100 bawei, Ba Nkumu ya Equateur baye basololi na VirungaNews bakoloba ete, bato basili nde kosila, motuya penza eyebani te.

Continue reading

RDC: Toluka toyeba banguna ya mboka!

El Memeyi Murangwa

03/06/11 

 

fdlr_prisoners.jpgKulutu Honore Ngbanda Nzambo ko Atumba abimisa lisese moko ya makasi tango alobaki ete “ Kozanga koyeba eza liwa ya ndambu”.  O mokolo mwa lelo emonani polele ete Bana Congo bazangi kososola po bayeba penza monguna ya mboka na bango.

Banda ki koloni ya ba noko, Bana Congo Belge na Ruanda-Urundi, bafandaki na kimya nyoso, lisanga pe boboto. ` Sima bozwi bonsomi mboka ina isato ekolisa bondeko pe lisanga ba bengi na lopoto CPGL ezalaki kotangama lokola ndakisa na etando nyonso ya mboka Afrika.

Nini penza eyaki kobebisa bondeko? Bino moko boyebi  ete Congo ekomaka banda 1960 mboka ya ekimelo po na bato nyoso oyo bazangaki kimya na ma mboka oyo ezuami nzinga-nzinga ya RDC. Ezala bandeko oyo bazalaki kowela bonsomi na bango lokola Zambia, Angola, Na Afrika ya Ngele, banso bayaki koluka lisalisi epayi ya Nkoy mobali, Mobutu Sese Seko ya mboka Zaire.

Continue reading

Mobeko moye molengeli maponami ya 2011 ebimi.

El Memeyi Murangwa

30/07/10

 

 

cei_2006.jpgMokonzi ya mboka, Joseph Kabila, awuti kotiya linzaka na mobeko moye mo ko lengele maponami ya mobu 2010 o mboka mobimba ya  RD ya Congo.  Mobeko yango ya biteni 7 na makomami 36 e limboli na bolayi ndenge maponami ma sengeli masaleme o kati ya mboka.

Elobami na mobeko ete mosolo ya kotambwisa misala o kati ya lingomba ya ba sinzili ya maponami, moye babengi na lopoto CENI mo kowuta na sanduku enene ya leta.

Continue reading

RDC: Bitumba makasi na kati ya mboka Mbandaka.

VirungaNews

04/04/10

 

fardc_et_monuc.jpgO tongo ya eyenga ya Paska mboka mokonzi ya Equateur Pili-Pili Bibende elamuki na kati ya etumba kati ya ba tomboki na ma pinga ya mbula matali.  O nzela ya singa VirungaNews ezwi sango ete ba tomboki ba lubwaki na masuwa pembeni ya ndako ya mokonzi ya eteni ya Equateur, ndako oyo ezwami pembeni ya ebale Congo (Zaire).

Tango to komi sango oyo elobami ete bitumba ya kafu-kafu ekosaleme na libanda ya pepo ya mboka mokonzi Mbandaka. Bosengeli koyeba ete bitumba oyo elandani na oyo ya Dongo, Libenge,Bomongo, na Makanza (Nouvelle-Anvers).

Continue reading

RDC: Mobeko ya Yambo ya Mboka na nzela ya bibamba.

El Memeyi Murangwa

02/04/10

 

mobeko_ya_mboka.jpgMikolo oyo Makita ndenge na ndenge eko saleme o’ mboka Kinshasa po na boluki ko bamba-bamba mobeko ya yambo ya mboka, oyo babengi na lopoto (Constitution), mingi penza na boluki kokotisa mbongwana na kati,  oyo eko lendisa pe kopesa makasi mokonzi ya mboka Joseph Kabila te akoka kozala lokola nkoyi mobali azalaka. Na likanisi ya mibale, ba ponami ya ekolo na ndako ya makita bakoluka bakata-kata mboka na biteni ezonga lokola ezalaka liboso (biteni 26), likambo liye libimisa bitumba kati ya bikolo na etando ya mboka nyoso, bato bawela ndelo, makila etanga te Marechal Mobutu aye kotiya obe biteni 10 na mboka mokonzi Kinshasa. Likambo ya misato eza kolongola likabo ya 40 % na biteni (Provinces) oyo esengeli etikala na eteni nyoso ya mboka po na kotambwisa misala, lokola ekomami na mobeko ya yambo ya mboka. Continue reading

Babeti Sanza masasi, kasi ezoki te!

El Memeyi Murangwa 

11/10/09 

 

mongete_na_sanza.jpgO tongo ya 09/10/09, bato ya mayele ya mboka Amerika (USA) basalaki likambo ya kokamwa, na bopeti monduki na eteni ya Sanza oyo ezuami na suka ya molongo,mingi penza na libulu babengi Cabeus.  Na bozongisi mituna ya bakomi sango, mokonzi ya NASA alimbolaki ete, bo tuti masasi na Sanza etalani mingi penza na koluka kotala soki bakoki kozuwa mayi na Sanza. Bosengeli koyeba ete bomemi ebakata ya monduki na sanza elye mbongo ebele pene ya milioni 79 na mbongo ya Amerika. 

Bato ebele baye balandi maye ma uti kosalema bakamwe na koyoka te bato ya mayele ya NASA bakoluka mayi na Sanza, tango mboka ebele na mokili etondi mayi nase ya mabele, kasi mosolo ezangi po te bato bakoka kotimola, ba bende mayi. Oyo elakisi penza te, baye bazelaka lisalisi basengeli ko mi lengebele.

Continue reading

Ba Mama, bozipa maputa !

El Memeyi Murangwa 

27/09/09

 

mj_30.pngBilili oyo eza kotambolaka mokili mobimba epesi mboka Congo (RDC) soni oyo ezangi ndelo.  Mwana mayele akolaka na komekola etamboli na bizaleli ya mikolo. Oyo tomoni eza yango te.  Ba alanga nzembo ya yambo batikala kopesa mboka soni ata moke te. Batambolaka na bwanya nyoso pe ba binisi Afrika mobimba.  Banda Lucie Eyenga, Antoinette Etisomba, Abeti Massikini, Mpongo Love, Vonga Aye, Faya Tess, te Jolie Deta, totikala komona likambo ya boye te.  Oyo esalemi na MJ 30, na Lingomba ya Tshala Mwana na Kampala (Uganda) epesi moboti nyoso malili na nzoto.

Continue reading