RDC: Bitumba makasi na kati ya mboka Mbandaka.

VirungaNews

04/04/10

 

fardc_et_monuc.jpgO tongo ya eyenga ya Paska mboka mokonzi ya Equateur Pili-Pili Bibende elamuki na kati ya etumba kati ya ba tomboki na ma pinga ya mbula matali.  O nzela ya singa VirungaNews ezwi sango ete ba tomboki ba lubwaki na masuwa pembeni ya ndako ya mokonzi ya eteni ya Equateur, ndako oyo ezwami pembeni ya ebale Congo (Zaire).

Tango to komi sango oyo elobami ete bitumba ya kafu-kafu ekosaleme na libanda ya pepo ya mboka mokonzi Mbandaka. Bosengeli koyeba ete bitumba oyo elandani na oyo ya Dongo, Libenge,Bomongo, na Makanza (Nouvelle-Anvers).

Ata ko bakobengeke bango ba Enyele na kozanga koyeba, elobami na bana Coqlatville ete baye ba kobunda bazali penza baye babengi na lopoto patriotes resistants congolais (PRC) baye bako bundisa bokonzi ya Joseph Kabila.

Lokito ya minduki makasi elakisi te ba tomboki bazali na bibundeli ya makasi, pe emonani penza ete likambo oyo ezali boswani kati ya ba Boba na ba Enyele te!

Ata ko molobeli wa mbula-matali, Lambert Mende, uta Kinshasa ako koba na bopesi sango esusu, ba nkumu ya mboka Mbandaka batandeli bakomi sango bosolo ya maye makoleke na etando ya mboka ina.

 

© VirungaNews

Leave a Reply