RDC: Mobeko ya Yambo ya Mboka na nzela ya bibamba.

El Memeyi Murangwa

02/04/10

 

mobeko_ya_mboka.jpgMikolo oyo Makita ndenge na ndenge eko saleme o’ mboka Kinshasa po na boluki ko bamba-bamba mobeko ya yambo ya mboka, oyo babengi na lopoto (Constitution), mingi penza na boluki kokotisa mbongwana na kati,  oyo eko lendisa pe kopesa makasi mokonzi ya mboka Joseph Kabila te akoka kozala lokola nkoyi mobali azalaka. Na likanisi ya mibale, ba ponami ya ekolo na ndako ya makita bakoluka bakata-kata mboka na biteni ezonga lokola ezalaka liboso (biteni 26), likambo liye libimisa bitumba kati ya bikolo na etando ya mboka nyoso, bato bawela ndelo, makila etanga te Marechal Mobutu aye kotiya obe biteni 10 na mboka mokonzi Kinshasa. Likambo ya misato eza kolongola likabo ya 40 % na biteni (Provinces) oyo esengeli etikala na eteni nyoso ya mboka po na kotambwisa misala, lokola ekomami na mobeko ya yambo ya mboka.

Makanisi oyo ndenge na ndenge ebimi na tango mikolo ya mokonzi likolo ya ebonga ekomi ya kotanga uta ma ponami ya 2006. Yango etindi bato oyo bazalaka nzinga -nzinga na ye baluka nzela ya kobakisela ye mikolo sima ya mobu 2011.  Na kosenginya bana mboka, bato ya mayele mabe balobi nyoso oyo eza po te akoka kosilisa misala minene oyo abandaki !

Esika oyo ebongi bana mboka ba mituna penza:

1-     Misala yango nini ?

2-     Nini ebongi o’ kati ya ezaleli ya mikolo na mikolo na bomoyi ya bana Kongo ?

3-     Nini ebongi na maye ma tali nkita to mosolo ya mboka ?

Yambo ya kobongola Mobeko ya Yambo ya Mboka, ebongi penza ba ponami bakoka kopesa eyano na mituna oyo misato.

Bokonzi ya Joseph kabila ekoki mosala te. Koluka kobongola mibeko elakisi ete mayele na bakonzi ekomi na suka.  Na botali na mozindo, emonani ete maye manso makosaleme ekopesa bolamu nde na mboka ya bapaya.

Nzinga-nzinga ya mboka Kongo (RDC), ekomi lityo, bana mboka basili loposo na kotongo na koseke. Lobi loleki, penza mokolo ya zomi na mine, sanza ya misato, mobu 2010, mokonzi ya mboka Rwanda na bozongisi motuna likolo ya maye makoleka o’ mboka kongo, apesaki eyano na koloba ete : Mboka wana ekufa na yango kala banda mokonzi ya ba noko Leopold wa babale. Pe abakisi ete, wapi bakonzi ya mboka wana ? Nini Bakosala po na mboka na bango ? Nini bakosala po na bobateli bana mboka oyo basili na biboma-boma ya ba dongolo miso baye ba uti na mboka ndenge na ndenge (Mbororos,Rwanda, na Uganda ) ? Mituna oyo ya mokonzi Paul Kagame na lisolo asololaki na mokomi sango ya CNN, Christiane Amanpour (*), etandi polele-polele ete mboka ya kondo Patrice Emery Lumumba eza mosika na kobonga.

Koluka ko bamba to ko bongola mobeko ya yambo ya mboka eza nde koluka kozindisa mboka.

Bana mboka ebongi bazala na bokebi.  Bo bongoli mobeko ya yambo eza likambo ya ba ponami te, eza nde ya bana mboka o’ nzela ya maponami babengi na lopoto Referendum.

Ba ponami basili kolakisa ete etumba na bango eza po na kopelisa mbabula okati ya ndako ya moko-moko na bango, o’tango bana mboka ba kowa na nzala. Bomona wapi Bakonzi ba futama, tango basali ya leta, ba soda, ba kengeli mboka (police), ba lakisi, Minganga … Ba futami te ?

Mbongwana ya mobeko ya yambo ya mboka eza mosala pamba. Baluka nde batala banda mokonzi akata ndayi nini asali ? Wapi akomisi mboka ? Biteni ya mabele boni ekeyi na mboka ya bapaya ? Bapesa nde biyano na mituna oyo misato. Batika nde koyita bana mboka na motalaka oyo ezangi suka.

Bana mboka bakeba na maye ma ko lobama na kota ya bapaya, mingi eza nde lokuta.  Balimbola nde manso na kota ya mboka (Kikongo, Lingala, Swahili, na Tshiluba).

Longonya nde na ba ponami ya Equateur oyo bafongoli na bokasi ndako ya makita oyo ekangamaki na mayele mabe. Balakisi te bakoli. Esengo na bo poni bakonzi ya sika oyo batelemeli bomoyi ya bana mboka.

Tango ekoki te bana mboka bafongola miso.

Eloba kulutu Bolowa : Bozala ba bini ya zoba te !

(*)  Extrait "Congo" – CNN: Christiane Amanpour Interview Paul Kagame 19 march 2010 (English): http://www.youtube.com/watch?v=jsVJmrQFJgw

 

© VirungaNews 

Leave a Reply