RDC: Batingami na mboka ya bato te nabozangisi bonsomi.

El Memeyi Murangwa

03/08/13

anti-monusco.jpgMaye makoleka na mboka Congo (Zaïre) ekomi kokamwisa.  Mokolo mwa lelo mboka mokonzi Kinshasa ezali na kati ya molili. Mingi bakomitungisa na koyeba nini ezangi, kasi babosani ete nyoso ezali na kati ya mboka, banda mabele ya talo, te mayi oyo etondi mingala pene ezindisia bisika ebele. Eloko ezangi na mboka ezali nde bokonzi ya malamu. Bakonzi ebele baza na mitema lisusu te! Bakoma kosalela be mabumu na bango. Lokuta na minoko na bango ekoma mokanda ya nzela.  Maye ma kotambola te, bakende mosika te, bawela koloba ete eza nde lisumu ya bikolo oyo ezwami nzinga-nzinga ya mboka.  Okoyoka ete toza na bitumba na mboka songolo, kende na ndelo ya mboka wana oko kuta ezibeli eza ya kofungwama 24/24, bato ba kokende kosomba na koteka ngambo ibale. Moto na bokono, moluki kosomba kisi, moteki libanga ya talo, esika ya malamu kokende eza nde mboka mopaya.  Nyoso oyo elakisi ete bakonzi ya mboka bakomi kokosa bana mboka, lokola mwasi mabe oyo alandi nzela ya kwiti na kosilisaka mosolo ya boleyisi bana na Masanga, soki bana baleli nzala, aloba ete tata na bino atikaki eloko te! 

Likambo ya kokamwa penza ezali likambo ya bobateli mboka na biloko bya bana mboka. Mokonzi oyo awuta na mboka mopaya, apesi nzela na bapaya po babatela mboka, kasi soki otali malamu bapaya oyo batondisi dalapo na etonda nyoso ya mboka, bako batela nde nkita na bango. Bana mboka bakufa, mapinga ya bapaya lokola ADF-Nalu, FDLR, LRA, to Mbororos eboma bana mboka, ba kamata basi na makasi, etali mapinga ya bapaya oyo te! Eloko basalaka eza nde kopanza sango ya motuya ya bato oyo bakufi, na kolakisa mokili mobimba ndenge bolole elati mboka kolata. Bato ya mayele batika kobelela ete MONUSCO to Communaute internationale eya elongola bato na pasi. Bato basengeli koyeba ete maye bakonzi ya mboka bakosala ekowuta nde na bato oyo. Mboka mingi emonaka Congo (Zaïre) lokola depot! Eloba Mungul Diaka Kiwuta, bakombaka depot te! Bana Congo (Zaïre) basengeli ba mi batela.  Banda 1956, bana mboka balelaki bonsomi, Noko aye kopesa bango Lipanda na 1960.  Ebanda boni basenga lisusu noko aya kokombela bango lopango, na ko tandela bango mbeto.  Kimpa Kisangameni ! Esika yango esengeli bokebi penza, noki te bana nyoso oyo bakobotama sima balanda motane ya noko. Eloba Tata Jean Bolikango, lipanda eza kaka na libenga ya noko.  Nani elombe abotola yango ? Oyo akoki te, atika nzela !

© VirungaNews

Leave a Reply