Mobeko moye molengeli maponami ya 2011 ebimi.

El Memeyi Murangwa

30/07/10

 

 

cei_2006.jpgMokonzi ya mboka, Joseph Kabila, awuti kotiya linzaka na mobeko moye mo ko lengele maponami ya mobu 2010 o mboka mobimba ya  RD ya Congo.  Mobeko yango ya biteni 7 na makomami 36 e limboli na bolayi ndenge maponami ma sengeli masaleme o kati ya mboka.

Elobami na mobeko ete mosolo ya kotambwisa misala o kati ya lingomba ya ba sinzili ya maponami, moye babengi na lopoto CENI mo kowuta na sanduku enene ya leta.

Boyeba ete, lingomba lya sika CENI lisengeli kokitana lingomba la kala CEI, oyo ekambamaki na nganga nzambe Malu-Malu oyo awutaki na baye ba mi bengi baye bakosalela politiki, to leta te.

O kati ya mobeko oyo elobami ete bato 7 bakofanda o ebonga ya CENI, 4 bako uta na baye bafandi na bokonzi (Majorite), bongo 3 bako uta na baye ba ko bundisa bokonzi, to opposition. Emonani penza ete bati pembeni baye bakosalela politiki te, to leta te, oyo ba bengi na lopoto société civile, ba senateurs ba bundaki po na likambo oyo, kasi suka ba lembaki nzoto.

Mobeko ezangi likambo lya bo baloli bana mboka (recensement) lokola esengamaka na lingomba lya UDPS, liye li kambami na mwana mboka Etienne Tshisekedi wa Mulumba. Boyeba été bozangi bo baloli bato liboso ya maponami ya 2006 etindaki UDPS eboya kozala na maponami yango.

Na bongo ya bana mboka mituna etikali ebele.  Mingi bazali kobanga na tina ete baye bazali na bokonzi ba koluka ba kotisa mayele mabe o kati ya misala ya lingomba ya sika CENI.

Sima ya botangi mobeko oyo, Nkumu moko ya mboka abetaki maboko pe alobi : Mboka eza mosika na kobonga ! 

 

© VirungaNews

Leave a Reply