|
El Memeyi Murangwa
30/07/11
Pepo epumbwa oyoki ekweyi, Mituka minene esili na kobaluka, Masini ya Enguduka ekotika nzela pe ekosuka na kopanzana, Masua masili na kozinda na ebale, pe mingala ndenge na ndenge. Bato bako mituna? Mituna mwa ebele: Oyo misala mabe? To, kaka bo lekisi bato mbeka?
Sima ya pepo ya Hewa Bora oyo ebomaki bato pene 100 na tango ezalaki ko lengela kokita na libanda ya pepo ya Bangoka o mboka Kisangani na mokolo mwa 08/07/11, sango mosusu ya mawa ekomelaki biso. Bwato minene misato ya ko kangama eye elongwaki o' tongo makasi ya mokolo mwa 19/07/11 na libongo ya mboka Mbandaka na nzela ya kokende o zando na mboka Ingende na bokumbi bato baleki 200, ezindaki. Ata ko bakonzi ya mboka bakoloba te bato 100 bawei, Ba Nkumu ya Equateur baye basololi na VirungaNews bakoloba ete, bato basili nde kosila, motuya penza eyebani te.
|
|
Read more...
|
|
|
El Memeyi Murangwa
03/06/11
Kulutu Honore Ngbanda Nzambo ko Atumba abimisa lisese moko ya makasi tango alobaki ete “ Kozanga koyeba eza liwa ya ndambu”. O mokolo mwa lelo emonani polele ete Bana Congo bazangi kososola po bayeba penza monguna ya mboka na bango.
Banda ki koloni ya ba noko, Bana Congo Belge na Ruanda-Urundi, bafandaki na kimya nyoso, lisanga pe boboto. ` Sima bozwi bonsomi mboka ina isato ekolisa bondeko pe lisanga ba bengi na lopoto CPGL ezalaki kotangama lokola ndakisa na etando nyonso ya mboka Afrika.
Nini penza eyaki kobebisa bondeko? Bino moko boyebi ete Congo ekomaka banda 1960 mboka ya ekimelo po na bato nyoso oyo bazangaki kimya na ma mboka oyo ezuami nzinga-nzinga ya RDC. Ezala bandeko oyo bazalaki kowela bonsomi na bango lokola Zambia, Angola, Na Afrika ya Ngele, banso bayaki koluka lisalisi epayi ya Nkoy mobali, Mobutu Sese Seko ya mboka Zaire.
|
|
Read more...
|
|
|
El Memeyi Murangwa
30/07/10
Mokonzi ya mboka, Joseph Kabila, awuti kotiya linzaka na mobeko moye mo ko lengele maponami ya mobu 2010 o mboka mobimba ya RD ya Congo. Mobeko yango ya biteni 7 na makomami 36 e limboli na bolayi ndenge maponami ma sengeli masaleme o kati ya mboka.
Elobami na mobeko ete mosolo ya kotambwisa misala o kati ya lingomba ya ba sinzili ya maponami, moye babengi na lopoto CENI mo kowuta na sanduku enene ya leta.
|
|
Read more...
|
|
|
VirungaNews
04/04/10
O tongo ya eyenga ya Paska mboka mokonzi ya Equateur Pili-Pili Bibende elamuki na kati ya etumba kati ya ba tomboki na ma pinga ya mbula matali. O nzela ya singa VirungaNews ezwi sango ete ba tomboki ba lubwaki na masuwa pembeni ya ndako ya mokonzi ya eteni ya Equateur, ndako oyo ezwami pembeni ya ebale Congo (Zaire).
Tango to komi sango oyo elobami ete bitumba ya kafu-kafu ekosaleme na libanda ya pepo ya mboka mokonzi Mbandaka. Bosengeli koyeba ete bitumba oyo elandani na oyo ya Dongo, Libenge,Bomongo, na Makanza (Nouvelle-Anvers).
|
|
Read more...
|
|
|
El Memeyi Murangwa
02/04/10
Mikolo oyo Makita ndenge na ndenge eko saleme o’ mboka Kinshasa po na boluki ko bamba-bamba mobeko ya yambo ya mboka, oyo babengi na lopoto (Constitution), mingi penza na boluki kokotisa mbongwana na kati, oyo eko lendisa pe kopesa makasi mokonzi ya mboka Joseph Kabila te akoka kozala lokola nkoyi mobali azalaka. Na likanisi ya mibale, ba ponami ya ekolo na ndako ya makita bakoluka bakata-kata mboka na biteni ezonga lokola ezalaka liboso (biteni 26), likambo liye libimisa bitumba kati ya bikolo na etando ya mboka nyoso, bato bawela ndelo, makila etanga te Marechal Mobutu aye kotiya obe biteni 10 na mboka mokonzi Kinshasa. Likambo ya misato eza kolongola likabo ya 40 % na biteni (Provinces) oyo esengeli etikala na eteni nyoso ya mboka po na kotambwisa misala, lokola ekomami na mobeko ya yambo ya mboka.
|
|
Read more...
|
|
|
|